Psalms 70

Nzambe, yaka kosalisa ngai

Nzembo ya David mpo na kokanisa epai ya mokambi ya bayembi.


1 Yaka noki, Nzambe, kobikisa ngai !
Yawe, yaka noki kosalisa ngai !

2 Tika ete baoyo balukaka bomoi na ngai,
bayoka soni mpe basambwa ;
tika ete baoyo basepelaka na libebi na ngai,
bazonga sima mpe lokumu na bango esila.

3 Tika ete baoyo balobaka epai na ngai :
“Aa ; aa” bazonga sima mpo na soni na bango.

4 Tika ete baoyo nyonso balukaka yo batonda na esengo
mpe basepela kati na yo ;
tika ete baoyo balingaka lobiko na yo tango nyonso,
baloba : “Tika Nzambe anetolama !”

5 Nzokande nazali mobola mpe moto akelela ;
yaka noki epai na ngai ! Nzambe,
Yo ozali mosalisi na ngai
mpe mokangoli na ngai ;
Yawe, kowumela te !
Copyright information for LinMNB